Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 10:25-42

Luka 10:25-42 MNB

Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu : — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? Yesu alobaki na ye : — Makambo nini ekomama kati na mobeko ? Otangaka yango ndenge nini ? Molakisi ya mibeko azongisaki : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Yesu alobaki na ye : — Opesi eyano ya malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi. Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ? Yesu azongisaki : — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa. Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye. Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye. Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa, apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna. Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa ! » Yesu atunaki : — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi ? Molakisi ya mibeko azongisaki : — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye : — Kende mpe sala bongo ! Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye. Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba. Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako ; ayaki na lombangu mpe alobaki : — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala ? Loba na ye ete asunga ngai ! Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele, kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.