Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :
— Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
Kasi anjelu alobaki na ye :
— Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.
Mari atunaki anjelu :
— Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?
Anjelu azongiselaki ye :
— Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
Mari azongiselaki ye :
— Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !
Bongo anjelu akabwanaki na ye.
Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda. Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote. Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu mpe agangaki na mongongo makasi :
— Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo ! Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai. Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye !
Bongo Mari alobaki :
— Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,
mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,
pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.
Yango wana, kobanda lelo,
bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;
Kombo na Ye ezali Bule.
Atalisaka boboto na Ye tango nyonso
epai ya bato oyo batosaka Ye.
Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye,
apanzi bato oyo batonda na lolendo,
akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi,
kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.
Atondisi na biloko ya malamu
bato oyo bazalaki na nzala,
mpe azongisi bazwi maboko pamba.
Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye,
abosani te kotalisa boboto na Ye,
ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso,
epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye,
mpo na tango nyonso.
Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye.