Levitike 15
15
Mbindo ya nzoto ya mibali
1Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 2« Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo. 3Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo : 4mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. 5Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 6Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 7Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa. 8Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 9Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo. 10Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa ; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 11Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 12Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.
13Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto. 14Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe. 15Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.
16Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. 17Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.
18Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.
Mbindo ya nzoto ya basi
19Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa. 20Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. 21Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. 22Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 23Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa. 24Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo.
25Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza. 26Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo ; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza. 27Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa.
28Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo ; sima na yango, akokoma peto. 29Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 30Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye. 31Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
32Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ; 33mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. »
Currently Selected:
Levitike 15: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.