Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yoane 8:48-59

Yoane 8:48-59 MNB

Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo. Yesu azongisaki : — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai. Nalukaka lokumu na Ngai moko te ; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te. Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te ! Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa ? Yango yo, ozali komimona nani ? Yesu azongiselaki bango : — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu. Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye. Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo. Bayuda balobaki na Ye : — Nini ? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami ! Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali. Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.