Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.
Yesu alobaki :
— Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai. Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.
Bayuda balobanaki bango na bango :
— Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te ? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki ? Alingi penza koloba nini tango azali koloba : « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna ? »
Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi :
— Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela. Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, » bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ? Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? »
Ezali bongo nde bato bakabwanaki na tina na Yesu. Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki.
Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli :
— Mpo na nini bomemi Yesu awa te ?
Bakengeli bazongisaki :
— Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba.
Bafarizeo batunaki lisusu :
— Bino mpe bomitiki penza mpo ete akosa bino ? Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ? Ezali kaka bato oyo bayebi mibeko ya Moyize te, bazali penza bato balakelama mabe !
Kasi moko kati na bango, Nikodemi, oyo, mokolo moko, akendeki epai ya Yesu, alobaki :
— Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala ?
Bazongiselaki ye :
— Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile.
[Na bongo, moko na moko azongaki na ndako na ye.