Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yoane 19:28-42

Yoane 19:28-42 MNB

Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi. Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye. Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango. Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu ; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu. Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki ; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye. Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango. Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. » Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. » Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu. Nikodemi oyo, na ebandeli, akendeki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki ; amemaki bakilo pene tuku misato ya mafuta ya mire basangisa na aloe. Bango mibale bakamataki nzoto ya Yesu mpe balingaki yango na maputa ya lino oyo, kati na yango, batiaki mafuta ya solo kitoko, ndenge ezalaki momesano ya Bayuda mpo na kokunda bibembe. Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.