Ezayi 46
46
Banzambe ya Babiloni mpe Yawe
1Tala banzambe ya Babiloni :
Beli esili ngala, Nebo ekweyi ;
bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele !
Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi,
ezali mokumba oyo elembisaka banyama.
2Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko,
ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango,
pamba te ekeyi na bowumbu.
3Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai,
mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele,
bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama
mpe nandima komema mokumba
wuta mbotama na bino.
4Ezala tango bokotonda na suki ya pembe
mpe bokokoma mibange,
Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ;
Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino,
nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
5Bolingi kokokanisa Ngai
to kotia Ngai esika moko na nani ?
Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani
mpo ete amekana na Ngai ?
6Bazali bato oyo babimisaka wolo
na mabenga na bango
mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo ;
bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende
mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko
ya wolo mpe ya palata,
mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.
7Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango,
batelemisaka yango na esika na yango
mpe etikalaka ya kotelema kaka wana.
Wuta na esika na yango, ekoningana te.
Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te,
ekobikisa ye te na tango ya pasi.
8Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu ;
bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino !
9Bokanisa lisusu makambo ya liboso,
makambo oyo ya kala penza ;
solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te,
nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.
10Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ;
wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya.
Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama,
mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
11Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ;
longwa na mokili ya mosika,
moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai.
Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ;
oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.
12Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi,
bino bato oyo bozali mosika ya bosembo !
13Bosembo na Ngai ekomi pene,
ezali lisusu mosika te ;
mpe lobiko na Ngai ekowumela te.
Nakopesa lobiko epai na Siona,
mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.
Currently Selected:
Ezayi 46: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.