Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Deteronomi 34

34
Kufa ya Moyize
1Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani, 2etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase ; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane, 3mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari. 4Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »
5Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye. 6Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori ; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali.
7Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te. 8Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.
9Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
10Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso, 11oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba ; 12pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.

Currently Selected:

Deteronomi 34: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo