Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Deteronomi 24

24
Mibeko na tina na koboma libala mpe kobala lisusu
1Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye. 2Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu. 3Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi, 4boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
Makambo oyo bosengeli te kosala na bato
5Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.
6Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.
7Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Mibeko na tina na bokono ya maba
8Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango. 9Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito.
Makoki ya bato bakelela
10Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga. 11Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga. 12Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo. 13Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
14Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo. 15Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.
16Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.
17Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga. 18Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.
19Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala. 20Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali. 21Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali. 22Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo.

Currently Selected:

Deteronomi 24: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo