Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Misala ya Bantoma 2:1-13

Misala ya Bantoma 2:1-13 MNB

Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko. Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana. Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango. Nzokande, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili. Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka. Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna : « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te ? Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka ? Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia, ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome, bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! » Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana : « Likambo oyo elingi koloba nini ? » Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : « Balangwe vino ya sika. »