Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Misala ya Bantoma 10:23-48

Misala ya Bantoma 10:23-48 MNB

Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa. Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga. Tango Petelo alingaki kokota na ndako, Kornei apusanaki pene na ye, amibwakaki na makolo na ye mpo na kogumbamela ye. Kasi Petelo atelemisaki ye ; alobaki : — Telema ! Ngai mpe nazali kaka moto. Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani. Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto. Yango wana, tango botindaki bato kobenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sik’oyo, nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai ? Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola. Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo ; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. » Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso. Petelo azwaki maloba mpe alobaki : — Sik’oyo, nasosoli solo ete Nzambe atalaka bilongi te, kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo. Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso. Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki : ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye. Biso, tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki kati na mokili ya Bayuda mpe kati na Yelusalemi. Babomaki Ye mpe babakaki Ye na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, na mokolo ya misato, mpe asalaki ete amonana lisusu. Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi. Apesaki biso mitindo ya koteya bato mpe kotatola ete Ye nde Nzambe apona lokola Mosambisi ya bato ya bomoi mpe bakufi. Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye. Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba. Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Pamba te bayokaki bango koloba na nkota mosusu mpe kokumisa Nzambe. Bongo Petelo alobaki : — Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki. Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.