Na tango wana, nakosangisa bino,
nakozongisa bino na mokili na bino.
Nakopesa bino lokumu
mpe nakosala ete sango na bino epanzana
kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili
tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino,
oyo bakendeki na bowumbu, »
elobi Yawe.