Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali mpo na komipesa na bosangisi nzoto oyo esengeli te. Ndenge moko mpe mpo na mibali : batikaki kosangisa nzoto na basi, batondisamaki na posa ya kosangisa nzoto na baninga na bango mibali ; basalaki makambo ya soni, mibali na mibali, mpe bazwaki kati na bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango.
Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.