1
Emoniseli 16:15
Mokanda na Bomoi
Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.
Kokisana
Luka Emoniseli 16:15
2
Emoniseli 16:12
Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.
Luka Emoniseli 16:12
3
Emoniseli 16:14
Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Luka Emoniseli 16:14
4
Emoniseli 16:13
Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta.
Luka Emoniseli 16:13
5
Emoniseli 16:9
Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo.
Luka Emoniseli 16:9
6
Emoniseli 16:2
Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango.
Luka Emoniseli 16:2
7
Emoniseli 16:16
Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona.
Luka Emoniseli 16:16
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo