1
Malako 6:31
Mokanda na Bomoi
Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
Kokisana
Luka Malako 6:31
2
Malako 6:4
Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
Luka Malako 6:4
3
Malako 6:34
Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
Luka Malako 6:34
4
Malako 6:5-6
Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko. Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya.
Luka Malako 6:5-6
5
Malako 6:41-43
Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
Luka Malako 6:41-43
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo