Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele
nde ekolendisa bokonzi na yo ?
Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te,
kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ;
boye alongaki na makambo nyonso.
Alongisaki babola mpe bato bakelela,
mpe alongaki na makambo nyonso.
Boni, yango te koyeba Ngai, »
elobi Yawe ?