1
Jeremi 18:6
Mokanda na Bomoi
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?
Kokisana
Luka Jeremi 18:6
2
Jeremi 18:7-8
Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo, bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango.
Luka Jeremi 18:7-8
3
Jeremi 18:9-10
To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala, bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.
Luka Jeremi 18:9-10
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo