Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye : « Kabola bango : tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa ; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. »
Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo ; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.