1
Ezayi 60:1
Mokanda na Bomoi
MNB
« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
Kokisana
Luka Ezayi 60:1
2
Ezayi 60:3
Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.
Luka Ezayi 60:3
3
Ezayi 60:2
Tala, molili ezipi mabele mpe molili makasi ezipi bato, kasi Yawe atelemi mpo na yo mpe nkembo na Ye emonani epai na yo.
Luka Ezayi 60:2
4
Ezayi 60:22
Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu na tango na yango. »
Luka Ezayi 60:22
5
Ezayi 60:19
Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.
Luka Ezayi 60:19
6
Ezayi 60:20
Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.
Luka Ezayi 60:20
7
Ezayi 60:5
Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.
Luka Ezayi 60:5
8
Ezayi 60:4
Tombola miso zingazinga na yo mpe tala : Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo ; bana na yo ya mibali bawuti mosika, mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko.
Luka Ezayi 60:4
9
Ezayi 60:21
Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.
Luka Ezayi 60:21
10
Ezayi 60:18
Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo ; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›
Luka Ezayi 60:18
11
Ezayi 60:11
Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.
Luka Ezayi 60:11
12
Ezayi 60:6
Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.
Luka Ezayi 60:6
13
Ezayi 60:10
Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, mpe bakonzi na bango bakosalela yo. Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai.
Luka Ezayi 60:10
14
Ezayi 60:15
Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso mpe esengo ya libela na libela.
Luka Ezayi 60:15
15
Ezayi 60:16
Okomela miliki ya bikolo mpe okomela mabele ya bakonzi ; boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi.
Luka Ezayi 60:16
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo