Yawe ayanolaki :
— Koma emoniseli oyo,
koma yango na etando ya mabanga,
koma yango penza malamu
mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.
Emoniseli oyo ezali kaka kozela
tango na yango oyo ekatama ;
ezali kolobela makambo oyo ekosalema
na tango ya suka ;
solo, ekokosa te.
Ata ewumeli, zela yango kaka ;
solo, ekokokisama, ekowumela te.