1
Ebandeli 50:20
Mokanda na Bomoi
Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.
Kokisana
Luka Ebandeli 50:20
2
Ebandeli 50:19
Kasi Jozefi alobaki na bango : — Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ?
Luka Ebandeli 50:19
3
Ebandeli 50:21
Yango wana, bobanga te ! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino. Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso.
Luka Ebandeli 50:21
4
Ebandeli 50:17
‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.
Luka Ebandeli 50:17
5
Ebandeli 50:24
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
Luka Ebandeli 50:24
6
Ebandeli 50:25
Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
Luka Ebandeli 50:25
7
Ebandeli 50:26
Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.
Luka Ebandeli 50:26
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo