Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala. Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.