Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu. Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te.