1
Mosakoli 5:2
Mokanda na Bomoi
Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.
Kokisana
Luka Mosakoli 5:2
2
Mosakoli 5:19
Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.
Luka Mosakoli 5:19
3
Mosakoli 5:10
Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso ?
Luka Mosakoli 5:10
4
Mosakoli 5:1
Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe ! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !
Luka Mosakoli 5:1
5
Mosakoli 5:4
Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.
Luka Mosakoli 5:4
6
Mosakoli 5:5
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?
Luka Mosakoli 5:5
7
Mosakoli 5:12
Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa : moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi
Luka Mosakoli 5:12
8
Mosakoli 5:15
Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa : ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga. Bongo litomba na ye ezali nini ? Asali kaka mpo na mopepe ?
Luka Mosakoli 5:15
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo