Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te, bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te ; boye tango okolia mpe okotonda ; keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.