1
Deteronomi 4:29
Mokanda na Bomoi
Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
Kokisana
Luka Deteronomi 4:29
2
Deteronomi 4:31
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.
Luka Deteronomi 4:31
3
Deteronomi 4:24
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.
Luka Deteronomi 4:24
4
Deteronomi 4:9
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
Luka Deteronomi 4:9
5
Deteronomi 4:39
Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.
Luka Deteronomi 4:39
6
Deteronomi 4:7
Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?
Luka Deteronomi 4:7
7
Deteronomi 4:30
Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye.
Luka Deteronomi 4:30
8
Deteronomi 4:2
Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.
Luka Deteronomi 4:2
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo