1
Deteronomi 15:10
Mokanda na Bomoi
Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.
Kokisana
Luka Deteronomi 15:10
2
Deteronomi 15:11
Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.
Luka Deteronomi 15:11
3
Deteronomi 15:6
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
Luka Deteronomi 15:6
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo