Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te.
Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa, mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te