Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe. Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo ; bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.