Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba :
Natombeli bino kimia monene !
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu.
Pamba te azali Nzambe na bomoi
mpe ya seko na seko ;
bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te
mpe ekowumela seko na seko.