Daniele alobaki :
Tika ete Kombo ya Nzambe
ekumisama libela na libela !
Bwanya mpe nguya ezali ya Ye.
Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo,
alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi,
apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya
mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama,
ayebaka makambo oyo esalemaka na molili,
mpe pole ezali kati na Ye.