Nakokangola yo wuta na maboko ya bato ya ekolo na yo mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »