1
1 Bakolinto 9:25-26
Mokanda na Bomoi
Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele ; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka ; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te. Yango wana ngai, nazali kopota mbangu na bozoba te, nazali kobeta makofi bibetabeta te.
Kokisana
Luka 1 Bakolinto 9:25-26
2
1 Bakolinto 9:27
Kasi nakonzaka nzoto na ngai, nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka kozanga mbano sima na ngai koteya bato mosusu.
Luka 1 Bakolinto 9:27
3
1 Bakolinto 9:24
Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.
Luka 1 Bakolinto 9:24
4
1 Bakolinto 9:22
Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
Luka 1 Bakolinto 9:22
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo