1
Yoane 3:16
Mokanda na Bomoi
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Bera saman
Njòttu Yoane 3:16
2
Yoane 3:17
Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.
Njòttu Yoane 3:17
3
Yoane 3:3
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.
Njòttu Yoane 3:3
4
Yoane 3:18
Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te ; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.
Njòttu Yoane 3:18
5
Yoane 3:19
Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe.
Njòttu Yoane 3:19
6
Yoane 3:30
Esengeli ete Ye amata, mpe ngai nakita.
Njòttu Yoane 3:30
7
Yoane 3:20
Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele.
Njòttu Yoane 3:20
8
Yoane 3:36
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Njòttu Yoane 3:36
9
Yoane 3:14
Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama
Njòttu Yoane 3:14
10
Yoane 3:35
Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.
Njòttu Yoane 3:35
Heim
Biblía
Áætlanir
Myndbönd