YouVersion Logo
Search Icon

Luka 4:9-12

Luka 4:9-12 MNB

Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo mpo ete babatela Yo malamu. Mpe bakomema Yo na maboko na bango mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. » Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »