YouVersion Logo
Search Icon

Luka 4:5-8

Luka 4:5-8 MNB

Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili. Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi. Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo. Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »