Ba-Ebre 11:8-9
Ba-Ebre 11:8-9 MNB
Mpo na kondima, Abrayami atosaki Nzambe oyo abengaki ye mpe atindaki ye kokende na mokili oyo asengelaki kozwa na sima lokola libula. Atosaki mpe akendeki atako ayebaki te epai azalaki kokende. Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye ; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.