Daniele 2:27-28
Daniele 2:27-28 MNB
Daniele azongisaki liboso ya mokonzi : — Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna ; kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo