1
Banzembo 143:10
Mokanda na Bomoi
Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku !
Compare
Explore Banzembo 143:10
2
Banzembo 143:8
Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
Explore Banzembo 143:8
3
Banzembo 143:9
Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai ! Nazali koluka ebombamelo epai na Yo.
Explore Banzembo 143:9
4
Banzembo 143:11
Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo, bikisa bomoi na ngai ! Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.
Explore Banzembo 143:11
5
Banzembo 143:1
Yawe, yoka losambo na ngai, landa mabondeli na ngai ! Yanola ngai na boyengebene mpe na bosembo na Yo.
Explore Banzembo 143:1
6
Banzembo 143:7
Yawe, zongisela ngai eyano noki ! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.
Explore Banzembo 143:7
7
Banzembo 143:5
Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.
Explore Banzembo 143:5
Home
Bible
Plans
Videos