1
Banzembo 112:7
Mokanda na Bomoi
MNB
Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.
Compare
Explore Banzembo 112:7
2
Banzembo 112:1-2
Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye. Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili ; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
Explore Banzembo 112:1-2
3
Banzembo 112:8
Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
Explore Banzembo 112:8
4
Banzembo 112:4
Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
Explore Banzembo 112:4
5
Banzembo 112:5
Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
Explore Banzembo 112:5
6
Banzembo 112:6
Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
Explore Banzembo 112:6
Home
Bible
Plans
Videos