1
Malako 9:23
Mokanda na Bomoi
Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Compare
Explore Malako 9:23
2
Malako 9:24
Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi : — Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
Explore Malako 9:24
3
Malako 9:28-29
Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ? Yesu azongisaki : — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo.
Explore Malako 9:28-29
4
Malako 9:50
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
Explore Malako 9:50
5
Malako 9:37
— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
Explore Malako 9:37
6
Malako 9:41
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
Explore Malako 9:41
7
Malako 9:42
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
Explore Malako 9:42
8
Malako 9:47
Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo
Explore Malako 9:47
Home
Bible
Plans
Videos