1
Jake 3:17
Mokanda na Bomoi
Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
Compare
Explore Jake 3:17
2
Jake 3:13
Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.
Explore Jake 3:13
3
Jake 3:18
Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
Explore Jake 3:18
4
Jake 3:16
Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.
Explore Jake 3:16
5
Jake 3:9-10
Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye. Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.
Explore Jake 3:9-10
6
Jake 3:6
Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.
Explore Jake 3:6
7
Jake 3:8
Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.
Explore Jake 3:8
8
Jake 3:1
Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.
Explore Jake 3:1
Home
Bible
Plans
Videos