Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Nazali Yawe, Nzambe na yo,
oyo ateyaka yo makambo ya malamu
mpo na bolamu na yo ;
oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai,
kimia na yo elingaki kozala lokola ebale,
mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene