Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ;
wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya.
Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama,
mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ;
longwa na mokili ya mosika,
moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai.
Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ;
oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.