1
Ezayi 30:21
Mokanda na Bomoi
Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : « Tala nzela yango oyo ! »
Compare
Explore Ezayi 30:21
2
Ezayi 30:18
Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
Explore Ezayi 30:18
3
Ezayi 30:15
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.
Explore Ezayi 30:15
4
Ezayi 30:20
Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, mpe mayi na tango ya minyoko ; moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, kasi miso na bino moko ekomona ye.
Explore Ezayi 30:20
5
Ezayi 30:19
Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
Explore Ezayi 30:19
6
Ezayi 30:1
« Mawa na bana ya mito makasi, » elobi Yawe : « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu
Explore Ezayi 30:1
Home
Bible
Plans
Videos