1
Ezayi 25:1
Mokanda na Bomoi
Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.
Compare
Explore Ezayi 25:1
2
Ezayi 25:8
akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
Explore Ezayi 25:8
3
Ezayi 25:9
Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »
Explore Ezayi 25:9
4
Ezayi 25:7
Kaka na ngomba oyo, akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso
Explore Ezayi 25:7
5
Ezayi 25:6
Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
Explore Ezayi 25:6
Home
Bible
Plans
Videos